"Tokundikaka mitu ya mpamba na limemya nionso mpo tokokaki kozwa oyo etikalaki na nzoto na bango te," elobi na AFP moko na bayi police.
Capitaine Antoine Pululu, mokambi ya police ya maye matali nzela, alobi ete bato 33 bakufaki na kozika nsima na botutani ya motuka monene momemaki carburant na bus moko etondaki bato o’mokolo mwa mposo pene na pont Kwango na mboka na nkombo Kibuka, na route nationale No 1, na 180 km ya Kinshasa.
Likama lisusu lya ndenge wana lislamaki na 2018 na nzela ya Kinshasa-Matadi epayi wapi bato 53 bakufaki na likama lya camion-citerne.
Na 2010, pene na bato 230 bakufaki ya kozika na likama mosusu lya ndenge wana.