Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Obama azwami na COVID-19


Mokonzi ya kala ya Etats-Unis Barack Obama na in Las Vegas, 8 janvier 2022.
Mokonzi ya kala ya Etats-Unis Barack Obama na in Las Vegas, 8 janvier 2022.

Barack Obama, mokonzi ya kala ya Etats-Unis, azwami na COVID-19 kasi alobi azali malamu nsima na koyoka mokosa na mongongo mikolo mibale.

"Nawuti kozwama na COVID-19 na test nasalisi,” ekomaki o'mokolo mwa eyenga na compte Twitter na ye M. Obama.

“Mongonga esalaki nga mokosa mwa mikolo kasi nazali malamu," ebakisi, M. Obama.

Mokonzi ya kala ya Etats-Unis alobi molongani wa ye Michel Obama azali malamu, mpe abakisi ete bango babale bazwaki mangwele mbala misato.

Motango ya bato bazwami na COVID-19 mokiti mikolo miye na Etats-Unis.

Mikano ya komibatelama milembisami.

XS
SM
MD
LG