Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

NBA: Moyi RDC Jonathan Kuminga (18 ans) aponami mpo kobetaka na Golden State Warriors


Mosani ya basketball ya RDC na lisano na eteyelo Partick, na Hillside New Jersey, 24 décembre 2019.
Mosani ya basketball ya RDC na lisano na eteyelo Partick, na Hillside New Jersey, 24 décembre 2019.

Mwana mboka ya Ekolo Congo démocratique Jonathan Kuminga aponami mpo na kobeta na Golden State Warriors, moko na ba équipes ya minene ya NBA, championnat américain ya basketball.

Jonathan Kuminga aponamaki jeudi na mpokwa na mililu mibengamaka NBA Draft to lokola “mercato” na league ya basketball na Etat-Unis.

Jonathan Kuminga awuta na Goma Basketball Academy oyo esungaka bilenge wuto bomwana na koyeba malamu lisano lya basketball.

Akomaki na Etats-Unis mibu mitano mibleki ntango azalaki na mibu 13.

Mobu moleki abetaki na G-League na Ignite.

Abakisi molongo ya bayi RDC babeta na NBA lokola Ilo Mutombo, Mutombo Dikembe, Christian Eyenga, Bismack Biyombo na Emmanuel Mudiay.

XS
SM
MD
LG