Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya ba Kamwina Nsapu Laurent Nsumbu aketelami boloko ya libela na Kananga


Musenu Tshislayi (2e G, atelemi), sergeant major congolais azali kosamba mpo na kozwa mwasi na makasi liboso lya tribunal ya basoda na Kinshasa, 4 avril 2016.
Musenu Tshislayi (2e G, atelemi), sergeant major congolais azali kosamba mpo na kozwa mwasi na makasi liboso lya tribunal ya basoda na Kinshasa, 4 avril 2016.

Laurent Nsumbu, mokambi ya kala ya basimba minduki Kamwina Nsapu akatelami etumbu ya boloko ya libela na Kananga.

Tribunal ya basoda ya Kananga ekateli Laurent Nsumbu etumbu yango na bosambisami bosalamaki na Monji na 50 kms na sud ya Kananga mpo na koboma bato, misala mya dongolomeso, lisanga lya bato mabe mpe mbeba ya bitumba.

Triubnal ya basoda ebakiseli Laurent Nsumbu lomande ya ba dollars 200.000 esengeli afuta na libota lyoko lyoko lya baye bazwaki mpasi na bitumba na ye.

Basambeli ba Laurent Nsumbu balaki kosenga bobandeli bosambisami mpo bandimi ekatela lyango te.

XS
SM
MD
LG