"RDC na nzela ya Mission diplomatique na yango na France, etelemeli mokona yango na bazuzi (esali pourvoit en cassation) mpe ezali kozela mokano Cour ekozwa," elobi Chargé d’Affaries a.i. ya ambassade ya RDC, Tambu Mikuma, na liyebisi.
Bakonzi ya police mpe parquet balingaki kobimisa ntoma ya RDC na résidence officielle na ye na mokano ya Cour d’Appel ya Paris.
Mission diplomatique ya RDC elobi mokano yango azwamaki na kotiola to kotambola likolo na mikano miike ya Convention ya Vienne ya 1961 eye etali ba relations diplomatiques to boyokani kati na bikolo.
Mikano mya Convention ya Vienne milobelaka "inviolabilité" mpe bobateli ya ba locaux to ndako inso ya mission diplomatique mpe ndako esika mokambi ya mission diplomatique (ambassadeur) avandaka.