Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato mibale bakufi na bitumba kati na ba étudiants na ba policiers na université ya Lubumbashi


Mobulu na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 mai 2016
Mobulu na Lubumbashi, Haut-Katanga, 13 mai 2016

Etudiante moko na policiers moko bakufi na mobulu na université ya Lubumbashi (Unilu), eyebisi police.

Ba étudiants bazalaki kosenga bazonegisela bango électricité (lotiliki) mpe mayi.

"Nawuti kobungisa policier moko bamotuti na motuka na bitumba na ba étudiants," elobi général Paulin Kyungu, mokonzi ya police ya Haut-Katanga.

"Nayoki mpe te étudiante moko akufi mpo azokaki na ‘balle perdue”," abakisi général Kyungu.

Kolanda recteur ya Unilu, Kishiba Fitula ba étudiants misato bazokaki mpe bamemaki bango na cliniques universitaires.

Kimya ezongi.

XS
SM
MD
LG