Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maponami ya ba Sénateurs, ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs mapusani


Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.
Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.

Céni (Commission électorale nationale indépendante) ya RDC epusi maponami ya ba Sénateurs, ba gouverneurs mpe vice-gouverneurs.

Maponami ya ba Sénateurs ekomi le 14 mars 2019. Esengelaki esalema le 6 mars kolonda linaka ya Céni.

Ndenge moko, oyo ya ba gouverneurs mpe vice –gouverneurs ekomi le 26 mars 2019. Esengelaki esalema le 18 mars.

Céni elobi été ba "contraintes légales, techniques et opérationnelles" esengi bazongisa na nsima mikolo mitano ntango ya botiki ba candidatures mpona maponami maye.

Suka na kotika ba candidatures oyo ebongaki kozala le 30 janvier 2019 ekozala lundi 04 février 2019, eyebisi Jean-Pierre Kalamba, molobeli ya Céni.

Beni, Butembo mpe Yumbi

Mpo na Beni, Butembo mpe Yumbi, Céni elobi été etindi bato bisika baye kotala lolenge nini kosala mpo maponami maselma koleka te le 31 mars 2019.

Maponami ya président mpe ya législatives nationales na locales esalamaki te na Beni, Butembo mpe Yumbi le 30 décembre na ntina ya bokono Ebola mpe ya bozangi bokengi.

XS
SM
MD
LG