Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mibale ya bafundami mpo na liwa ya ba experts ya ONU bakimi boloko


Ba experts ya ONU Michael Sharp, na gauche, mpe Zaida Catalan bakufaki na maboko na baye bamisama lokola batomboki ya Kamwina Nsapu na Kasaï, le 27 mars 2017.
Ba experts ya ONU Michael Sharp, na gauche, mpe Zaida Catalan bakufaki na maboko na baye bamisama lokola batomboki ya Kamwina Nsapu na Kasaï, le 27 mars 2017.

Bato babale kati na bato bakangama mpo na bobomi ya ba experts ya ONU bakimi boloko na butu boleki na Kananga, na Kasaï central.

Evariste Ilunga Lumu mpe Tshiaba Kanowa bakimi elongo na bangemi zomi na bibale basusu.

Evariste Ilunga azali moko na baye bamonana na bilili ntango ya liwa ya ba experts baye. Afundama mpo na kokata suki ya Zaïdan Catalan moko na ba experts ya ONU baye babomaki.

Nzokande, Auditeur général ya ba FARDC, lieutenant général Tim Mukuntu Kiyana alaki 1.000 dollars na moto nyonso akosalisa misala ya sembo ya mampinga kozuwa Evariste Ilunga mpe Tshiaba Kanowa.

XS
SM
MD
LG