Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kimya ezongi na Keshero (Goma) nsima ya kufa ya elenge mwasi moko


Mobulu mpo na kosenga maponami, na Goma, RDC, 30 décembre 2017. (Facebook/LUCHA RDCongo)
Mobulu mpo na kosenga maponami, na Goma, RDC, 30 décembre 2017. (Facebook/LUCHA RDCongo)

Mobulu mozalaki na ntongo ya mardi na quartier Keshero, na ouest ya Goma (Nord-Kivu), nsima ya liwa ya elenge mwasi moko na masasi ya policier.

Ba nzeneneke (témoins) ba yebisi VOA Lingala ete policier yango abetaki masasi na koyeba te.

"Policier yango alingaki abatela moyibi moko baye ya quartier oyo balingaki kotumba kasi ntango abeti masasi ezuwi elenge mwasi moko mpe akufi mbala moko," elobi moko na bavanfi ya Keshero na VOA Lingala.

Bato batonmbokaki mpe tumbaki bureau ya quartier mpe commissariat ya police.

Kasi renfort ya police eyaki mpe ba calmaki siutaion.

XS
SM
MD
LG