Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na Kabila bakutani na Cité ya Union africaine


Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)
Joseph Kabila, mokonzi ya kala, akutani na mokonzi ya sika Félix Tshisekedi, Cité ya Union africaine, Kinshasa, 17 février 2019. (Twitter/Joseph Kabila)

Président Félix Tshisekedi na mokonzi ya kala Joseph Kabila bakutani lelo na cité ya Union africaine, na Kinshasa.

Masolo na bango mazalaki mpo etali boluki Premier ministre, eyebisi baye ya présidence.

Batalaki mpe likambo etali boyoka ya CACH, lingomba ya M. Tshisekedi na FCC, ya M. Kabila, nsima ya maponami ya ba Sénateur mpe ya ba gouverneurs, maye malongami na baye ya mokonzi ya kala.

Bokutani liye lisalemi, mokilo mibale yambo ya boponami ya bureau ya Assemblée nationale oyo opposition ya parlementaire elobi ekokota mpo bapesi bango kaka ebonga ya rapporteur.

Mokambi ya gouvernement esengeli atiyama nsima ya boponami ya baye ya bureau définitif ya Assemblée nationale liye likosalema o’mokolo ya misato.

XS
SM
MD
LG