Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou Nguesso apesi losako na Félix Tshisekedi


Président Denis Sassou Nguesso, na Brazzaville, le 29 avril 2018
Président Denis Sassou Nguesso, na Brazzaville, le 29 avril 2018

Mokambi ya ekolo ya Congo-Brazzaville apesi losako na mokonzi ya sika ya République démocratique ya Congo.

"Bomati na yo na libonga ya likolo na RDC epesi ngayi libaku ya kosepsa yo, na nkombo ya bana mpe ya gouvernement ya Congo mpe na ya ngayi moko, losako nyonso, mpe na bakasi kotombela yo elonga na bokokisi ya mosala na yo ", ekomi Denis Sassou Nguesso na nkasa atindeli moninga na ye ya ngambo.

Mokonzi ya Congo-Brazzaville abakisi ete akosala elongo na moninga na ye mpo na koyikisa makasi bondeko ya bokengi mpe ya lolenge mingi kati na bamboka mibale makama.

Sassou Nguesso mpe azali moko na bakonzi baye bazelami na milulu ya botiyami na bokonzi ya Félix Tshisekedi o’mokolo ya minei na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG