Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabila alobi akosala na Félix Tshisekedi


Mokonzi Joseph Kabila o'mokolo ya maponami, na Kinshasa, le 30 décembre 2018.
Mokonzi Joseph Kabila o'mokolo ya maponami, na Kinshasa, le 30 décembre 2018.

Na lisikulu na ye suka, président Joseph Kabila alobi ete alingi lisanga na Félix Tshisekedi mpo na kotelemela baye balukaka kozwa bozwi ya Congo.

"Nasengi nde lisanga monene ya ba ‘forces progressistes’, lisanga eko telemela ba ‘forces prédatrices’ oyo basangani mpe bakomekaka kaka kosangana mpo na kozuwa na makasi bozuwi ya mabele na biso mpe kopesa eloko te na bana na biso mpe bana ya bana na biso, lisanga oyo ekotelema ata na kondima komipesa mbeka mpo lipanda, bonsomi mpe bomoko ya etando ya mboka na biso," elobi na télévision ya mboka Joseph Kabila.

Mokonzi Kabila alendisi baye pilitiki kolanda majorité na parlement kasi kosalama majorité ya bolomu ya mboka.

Apesi losoka Félix Tshsiekedi, mokitani na ye. Mpe alobi akopesaye bokonzi o’mokolo ya minei "na mpasi to kolele te" mpo "soki mbeba oyo ezalaka na misala ya moboko ya bato, Congo ewuti mosika".

Asengi na bana ya Congo bapesa moboko mingi na mokitani na ye, mingi mingi mpeza bilenge.

Joseph Kabila andimi ete azwaki bokonzi na likama ya liwa ya tata na ye, Laurent-Désiré Kabila.

Mpe na ndambo ya liseki, alobi azali elenge oyo ekotaki na bokonzi le 21 janvier kasi akomi lelo na suki ya pembe.

XS
SM
MD
LG