Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

"Ensemble" ya Kautmbi esengi Tshisekedi kopesa eyano na "question ya illégitimité "


Moïse Katumbi na lisanga na ye "Ensemble pour le changement" na Johannesburg, Afrique du Sud, le 12 mars 2018.
Moïse Katumbi na lisanga na ye "Ensemble pour le changement" na Johannesburg, Afrique du Sud, le 12 mars 2018.

Lisanga "Ensemble pour le changement" ya Moïse Katumbi esengi na na président Félix Tshisekedi kosala nyonso mpo na kopesa eyano na "question ya illégitimité" (likambo ya kozanga kondimana epayi ya bana ya mboka).

Naliyebisi etiyami maboko na Pierre Lumbi, vice-président ya lisanga liye, "Ensemble" elobi ete Joseph Kabila, mokonzi abimi na bokonzi, azali na "responsabilité personnelle" na bosalami ya chaos électoral esalami na mboka.

Lingomba liye ekundoli ete mbemba mingi misalaki na maponami mpe epekisi bato kondima ba institutions maye mabimi na yango.

Ensemble "esengi Kabila amipekisa kokota na fonctionnement régulier ya ba institutions mpe komitya lokola ebaka (obstacle) ya restauration ya ba institutions démocratiques," elobi lisanga liye na liyebisi.

Lingomba liye ekutndoli ete nkwokoso nyonso ya poltiki ekomela mboka liye ewuta na ba crises ya légitimité (bozangi ya kondima) ya ba institutions na bakambi na yango.

Baye ya lingomba liye basengi Félix Tshisekedi ayeba ba nini ezali mikumba na ye na situation oyo mpe balobi na ye azuwa ba initiatives ya makasi maye makosilisa nkwokoso liye ya bonzangi kondimama (question de légitimité) ya ba institutions mpe bakambi na yango.

Batelemeli boyokani ya nkunku kati na Kabila na Tshisekedi.

"Bbokonzi ya président ya république esengeli evanda likolo ya Mobeko likonzi kasi ya boyokani ya nkunku te, liye etali mboka ya Congo te. Boyokani liye ekoki te kozala liziba ya likonzi ya démocratie," ekomi balandi ya Katumbi na mokanda.

Ensemble elobi ekokoba kubunda mpo na Etat de droit (mboka ya mibeko) mpe ekondima initiative nyonso mpo na kosilisa nkwokoso liye.

Lisanga Ensemble esimba candidature ya Martin Fayulu oyo azali kokoba kosenga bosolo ya maponami.

XS
SM
MD
LG