Cour d’appel esakoli ekateli yango elongo na lomande ya million moko ya ba dollars.
Bazuzi "bakati mpe ete l’Etat ekanga misolo mya M. Blatnner milliards 2.500 ya Francs congolais, mityamaki na banque TMB mpe bokangami bwa ye mbala moko", elobi mokambi na ACAJ (Association congolaise pour l’Accès à la justice), Me Georges Kapiamba.
Le 21 juin 2020, M. Blattner atikamaki mpe abimisamaki na boloko na Tribunal ya grande insatance ya Gombe na kolobaka ete ezali te na mpifo ya kobongola bofundami ya M. Blattner na kopengwisa misolo mya l’Etat mpe kokosa yango.
Yambo na yango, M. Blattner, moyi Amerika avandaka na RDC wuto mibu mingi mpe akambaka Safricas, akatelamaki mibu mitano mya boloko mpo na kopengwisa 40% ya misolo mizalaki mpo na botongi ya ba gbagba to sauts-de-moutons minei.
Mingi na ba sauts-de-moutons yango esilaki kotongama mpe epesamaki na mbulamatari.
Voir les commentaires
Avez vous déjà un compte? Connectez-vous
Êtes-vous un utilisateur enregistré? Inscrivez-vous
Voir plus de commentaires