Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COP26 : Sassou asengi lisungi na Fonds bleu mpo na kobatela nzamba ya bassin ya Congo


Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo na likita lya COP26 na Glasgow, Ecosse, Royaume Unie, 1er novembre 2021
Président Denis Sassou N'Guesso ya Congo na likita lya COP26 na Glasgow, Ecosse, Royaume Unie, 1er novembre 2021

Président Denis Sassou N’Guesso ya Congo asengi bayi molongo kopesa misolo na Fonds bleu mpo bobateli ya nzamba ya bassin ya Congo, na maloba azwaki na likita lya mbala 26 ya ONU, COP26, na Glascow, na Ecosse, na Royaume-Uni.

"Yango wana bokopesa nga nzela na kolobela awa lisusu Fonds bleu mpo na bassin ya Congo, likanisi lya bikolo miike ya Commission Climat ya Bassin ya Congo liye Royaume ya Maroc mpe kota na kati, mpe liye lizali se kozela lisungi lya basungi ba biso banso," elobi M. Sassou.

Denis Sassou azwaki maloba na COP206 bo’ mokambi ya Commission ya Climat ya Bassin ya Congo eye ezali na bikolo zomi na motoba ya Afrique centrale, ya est mpe na Maroc.

XS
SM
MD
LG