Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Biden akebisi Putin na koluka kotinda basoda na Ukraine


Président Joe Biden (D) ya Etats-Unis na président Vladimir Putin na bokutani na 'Villa la Grange', in Génève, Suisse, 16, juin2021.
Président Joe Biden (D) ya Etats-Unis na président Vladimir Putin na bokutani na 'Villa la Grange', in Génève, Suisse, 16, juin2021.

Président Joe Biden na mokoni wa ye ya Russie basololaki na nzela ya visioconférence mpo na matata na Ukraine mpe bokengi na Europe ya est.

Mokonzi ya Amerika Joe Biden akebisi mokokani wa ye ya Russie Vladimir Putin na komeka basoda ba Russie kokota na Ukraine, elobi liyebisi ya ndako ya mosala ya mokonzi ya Etats-Unis, Maison Blanche (White House).

Ndako ya mosala ya président Putin, Kremlin, elobi ete mokonzi ya Russie nde asengaki M. Biden kolakisa ete Otan (boyokani ya mampinga ma west) makotinda mpe basoda ba yango te na Ukraine.

Kremlin elobi masolo mango mazalaki mpenza na bosolo.

Mokambi ya misala mya bokengi ya mampinga ma Ukraine alobaki mikolo mileki na ba media ete Russie etie basoda mingi na ndelo mpe ekoki kokota na Ukraine na janvier to février.

XS
SM
MD
LG