Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Batomboki 222 bamizongisi na bakonzi na Masisi


Mampinga ya FARDC na Mushaki, Masisi, Nord-Kivu, 5 mai 2012.
Mampinga ya FARDC na Mushaki, Masisi, Nord-Kivu, 5 mai 2012.

Batomboki 222 ya lingomba Nyantura bamipesi na bakonzi na mboka Kirumbu, na etando ya Masisi, na Nord-Kivu.

Babundi baye bamizongisi elongo na mokambi na bango Kavubi Sibomana mpe bapesi bibundeli na bango na bakonzi.

Kolanda molebeli ya misala Sokola 2 ya mampinga FARDC ayebisi ete minduki 63 mazongisami. Kati yango 57 Ak47, 2 PKM, 1 Mag belge, 1 LPG7, 1 mosaire, 1 mi-section mpe masisi ebele.

XS
SM
MD
LG