Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Basoda bakimi Kamina te kasi batindami nde Kasaï central, elobi bakonzi ya ba FARDC


Ba soda ba FARDC na lifili na base ya Kamina, na Haut-Lomami, 7 novembre 2005.
Ba soda ba FARDC na lifili na base ya Kamina, na Haut-Lomami, 7 novembre 2005.

Boko na bakambi ba mampina ya RDC balobi ete basoda ba FARDC bakimi te base ya Kamina na etuka ya Haut-Lomami lokola ezali kolobama kasi batindami nde na Kasaï central nsima na mateya bazwaki kuna.

Bataillon ya ba FARDC esili mateya na Kamina ezali na nzela ya kokende na esika na bango ya mosala na Kananga, na Kasaï central, elobi moko na bakambi ba FARDC atangami na ACP (Agence congolaise de presse).

Mokonzi ya base ya Kamina ayanolaki na Top Congo FM na koloba se lolenge moko wana mpe abakisi ete basoda batindami na Kananga bazali na motango koleka 400.

Bataillion yango elongaki Kamina na etinda ya bakonzi mpe ebungi te, ebakisi moyi FARDC moye.

Mokonzi ya basoda oyo awangani sango epanzai mpe elobi ete basoda bakimi base ya Kamina.

XS
SM
MD
LG