Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Basali ya société canadienne Banro bakangami na basimba minduki


Ba soda ya FARDC na bolukiluki na Mboko, Sud-Kivu, 10 novembre 2009.
Ba soda ya FARDC na bolukiluki na Mboko, Sud-Kivu, 10 novembre 2009.

Basali ya Banro, société ya Canada ya boluki mines, bakangami na baye basimba minduki na etuka ya Maniema, na ndelo na Sud-Kivu, eyebisi molobeli ya mampinga ya FARDC na bisika biye, capitaine Dieudonné Kasereka.

Kolanda maloba ya cap. Kasereka na AFP, basali baye bakutanaki na bato mabe o’mokolo ya mitano na 10 :30 ya ntongo kati na Salamabila na Kitindi na etuka ya Maniema.

Bato mabe batumbaki motuka ya basali baye, ebakisaki cap. Kasereka.

Bayike balobi basali minei nde bamemaki na bato mabe kasi rapport oyo tozuwi elobi ete moto moko ya Sud-Afrique mpe mosusu ya Zimbabwe nde bakangami na basimba minduki baye basalaka bikela mabe na etando eye, elobi cap. Kasereka na AFP.

Kolanda maloba na ye, mampinga mazali kosala bolukiluki.

Tokundola ete moto moko ya France akangemaki mpe atikamaki na sanza ya mitano ya 2017.

Esika eye etondisama na babundi ya Mai Mai.

XS
SM
MD
LG