Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba avocats français ya Kamerhe bazali kobanga mpo na bomoi na ye


Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi in/à Nairobi
Vital Kamerhe and/et Felix Tshisekedi in/à Nairobi

Basambeli ya Vital Kamerhe ya ekolo France balobi ete bazali kobanga mpo na bomoi na ye. M. Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala ya kala président Félix Tshisekedi, azali na boloko wuta akatelama etumbu ya mibu 30 mpo na bopengwisi misolo.

"Tozali mpenza kobanga mpo na bomoi na ye," elobi mosambeli wa M. Kamerhe ya ekolo France, Me Pierre-Olivier Sur, kolanda na AFP.

"M. Kamerhe azalaki kobenga ngai mikolo minso wuto boloko bwa ye… Wuto ntango akota lopitalo (mpo na nkwokoso ya mpema likolo na coronavirus) tozalaka lisusu na masolo te mpe sango ezalaki kokomela biso ezala ndenge mingi," elobi Me. Sur.

M. Kamerhe akitisamaki o'likambo na bopengwisi pene na 50 millions $ ezalaki mpo na misala ya kotonga mpo na mikolo nkama ya yambo ya bokonzi ya président Tshisekedi.

M. Kamerhe lokola basambeli ba ye, akoba koloba ete bosambisi bwa ye bozalaki ya politiki.

Bosambeli ya kozongela bobanda, kasi ba audiences etindikamaka kaka nsima.

"Mokolo ya sika ya audience mosusu eyebani te mpo etelemisamaki na kolanda mobulu ya kosambisama (procédures)," elobaki mpe na AFP avocat na ye moko ya Congolais Me Jean-Marie Kabengela.

Me Kabengela alobi basambeli bapesama kaka mikanda moke mpe na mpasi wuto basengaka yango.

"Moto moko te akoki kolakisi biso bilembo ya moyibi na ye. Bamona ata elembo moko te ya mbongo baloba ete azwa," elobi Me Sur.

Kolanda ba avocats ba M. Kamerhe, biloko bya ye lokola ndako misato na France bisombamaki yambo na ntango balobi ete ayibaki.

Groupe ya ONU etalaka bokangami na kobuka mibeko elobi ete bato baike bamemelaki bango likambo ya M. Kamerhe kasi nanu etalama te.

XS
SM
MD
LG