Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Américain moko azwami kati na bato bakangami na bobomi ya président ya Haïti


Motuka ya police ememi bakangami babale na poste ya police ya Petion Ville na Port-au-Prince, Haiti, 8 juillet 2021.
Motuka ya police ememi bakangami babale na poste ya police ya Petion Ville na Port-au-Prince, Haiti, 8 juillet 2021.

Mwana mboka moko ya Etats-Unis azwami kati na bato motoba bakangami mpo bobomi bwa président ya Haïti Jovenel Moïse mercredi, elobi bakonzi ba Haïti.

"Moto yango ya Amerika abotamaki to awutaka na Haïti," elobi ministre ya mambi ma Maponami ya Haïti, Mathias Pierre.

Ministre Pierre alobi eloko te na sango ba media epesa na kolobaka ete nkombo na mokangemi ezali James Solages.

"Kati babomi. motoba bazali na bokangami na maboko ya bayi police," elobi mokambi ya Police nationale, Léon Charles.

Police elandaki bango kati na Port-au-Prince, engumba mokonzi ya Haïti. Bato banei bakufaki na masasi ya police mpe basusu bakangami, elobi mbulamatari ya Haïti

Zuzi oyo azali na mokumba ya bolukiluki mpo na liwa lya Jovenel Moïse alobi ete masasi zomi na babale makutami na nzoto ya président ya Haïti nsima na liwa lya ye.

Babomi bapanzaki esika ya mosala mpe suku na ye ya kolala.

Molongani ya Jovenel Moïse, Martine Moïse amemamaki lobi na Miami na Etats-Unis mpo na kopesama lisalisi na mpoka ekasi azokaki na masasi elongo na mobali wa ye lobi.

Papa wa Roma, François, président Joe Biden ya Etats-Unis, lokola bakonzi bausu na mokili mpe Conseil ya sécurité bapameli bobomi boye mpe basengi maponami ya lombango.

XS
SM
MD
LG