Meschack Elia, mosani ya ndembo ya Ekolo Congo Démocratique ademifisami na FC Nantes, ekipi ya Ligue 1 ya ekolo France na kowuta na ekipi Young Boys ya Suisse.
Kolanda site internet ya FC Nantes, Young Boys na Meschack Elia bayokani ntango mercato (to boteki ya basani) ezali kosila mpo na eleko eye, ete apesama na club ya France mpo na sanza ya motoba mpe yango ekoki kopesa nzela ete asombama na suka na yango.
“Nasepeli mingi kozala na FC Nantes, wuta kala nazalaki kolingaka koya awa. Solo nazali mpenza na esengo. Moninga na nga mpe mosani ya ekipi ya ekolo na nan ga Samuel (Moutoussamy) alobelaki nga mingi mpo na club eye. Nasololaki mpe na coach, nyonso ebongisami mpo ete naya awa”, elobi M. Elia.
Ba media mingi esakoli ete botefisi bwa Elia bosalami na 3 millions ya ba euros.
Na mibu 27, M. Elia aloki kopesa esengo na balangi ba FC NAntes.
Amonanaki mokolo mwa mokolo mwa mosala mibale na entrainement (bolengelami) ya FC Nantes.
FC Nantes ezali sika molongo ya 14 na championnat ya France ya Ligue 1.
“Nakoki kobeta na ndelo ya attaque, na loboko ya mobali, ya mwasi. Wuta ntango natiami na lolenge ya kokima, kosopa, kopesa ndeko na basusu, nazalaka na esengo. Mbangu na nga na boyebi na nga ya kotiya mingete nde lolelenge na nga ", abakisaki.
"Nalingi mpenza nabanda kobeta na lombango, mpo napesa balandi ba biso.Esengeli tokende liboso ", alobaki.
Forum