Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Elim. Mondial 2026: RDC ekomi na bilembo sambo elongo na Sudan nsima na kopolisa Togo 1-0


Mosani ya ba Léopards ya RDC Meschack Elia (G) azali kondongwana na Seko Fofana ya Côte d'Ivoire na CAN 2024 stade Ebimpe, Abidjan, 7 sanza ya mibale 2024.
Mosani ya ba Léopards ya RDC Meschack Elia (G) azali kondongwana na Seko Fofana ya Côte d'Ivoire na CAN 2024 stade Ebimpe, Abidjan, 7 sanza ya mibale 2024.

Ba Léopards ya RDC bakomi sika na molongo ya misato na mokolo ya minei ya ba éliminatoires ya Coupe du MOnde 2026 nsima na kopolisa 1-0 ba Eperviers ya Togo o'mokolo mwa etenga na stade des Martyrs ya Kinshasa na match aller.

Elonga ya ba Léopards ezwami na mongete mosani Meschack Elia atiaki na minute 6 na ndembo ewutaki na Yoane Wisa.

Basani ya Sébastien Desabre bamizongisi na molongo nsima kokabola 1-1 mikolo misato mileki.

Sika RDC ekomi na bilembo sambo ndenge moko na Sudan eyezali na molongo ya mibale mpe ba Léopards nde na ya misato.

Sénégal nde ezali sika na bilembo ,wa,be mpe na molongo mwa yambo nsima na kopolisa Mauritanie 1-0.

Ba Léopards bakobeta mokolo mwa mitango Sudan mpe nsima na Mauritanie ya ba matches retour.

Forum

XS
SM
MD
LG