Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Joe Biden alobi bibundeli biye Amerika epesi Ukraine ndingisa ya kosalela na mabele ma Russie bikozala te mpo na kobeta Moscou to Kremlin


Président Joe Biden na Maison Blanche, Washington D.C., 11 mars 2022
Président Joe Biden na Maison Blanche, Washington D.C., 11 mars 2022

Bibundeli biye Ekolo Amerika epesi Ukraine ndingisa ya kosalela na mabele ma Russie bikozala te mpo na kobeta Moscou to Kremlin, elobi lelo Joe Biden na biyano apesi na etando eke ya ABC ya Amerika. Mokonzi ya Ekolo Amerika apesaki nzela mposo moleki ete Kiev esalela bibundeli ya mampinga ma Amerika kasi na botosi bwa malako maike, na bitumba pene na etuka ya Khakiiv na nord-est ya Ukraine. Joe Biden ayanolaki te soki Kiev esi ebandaki kosalela bibundeli byango. Lobi loleki, mokonzi ya Russie Vladimir Putin akebisaki ete akoki mpe kopesa bibundeli na bikolo biike mpo na kobeta bayi West soki bibundeli ya bayi West bisalelami mpo kobeta Moscou.

Forum

XS
SM
MD
LG