Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tribunal spécial ya ONU etindi mokanda ya bokangami na mokonzi ya kala Centrafrique François Bozizé


Mokonzi ya kala ya Centrafique François Bozizé (D), mokambi ya opposition ya ekolo, na lisikulu na Bangui, 24 sanza ya zomi na moko 2020.
Mokonzi ya kala ya Centrafique François Bozizé (D), mokambi ya opposition ya ekolo, na lisikulu na Bangui, 24 sanza ya zomi na moko 2020.

Cour Pénale Spéciale (CPS) mpo na Centrafrique etindi mokanda ya bokangami na mokonzi ya kala ya ekolo Centrafique François Bozizé mpo na mbeba ya makoki ma bomoto basoda basalaki kati na 2009 na 2013 na mboka.

CPS ekalama mpe epesamaka na maboko na ONU.

M. Bozizé, na mibu 77, azwaki bokonzi na coup d’état na 2003 yambo ete akweyisama mibu zomi nsima na yango na batomboki kasi atikala kino sika na bokambi ya lingomba lya botomboki na ekolo na ye, mpe akima na Guinée-Bissau wuta sanza ya misato ya 2023.

Mokanda mwa kokanga ye mosalamaki wuta mokolo mwa ntuku mibale na sambo mwa sanza ya, kolanda liyebisi lya CPS liye lisangisaka na Bangui ba magistrats ba Centrafrique na bayi bikolo bya bapaya.

Forum

XS
SM
MD
LG