Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mbulamatari ya Russie endimi kosunga mampinga  ma RDC


Président ya Russie Vladimir Putin ayambi président ya RDC (Ekolo Congo démocratique) Félix Antoine Tshilombo Tshisekedi, na bokutani ya Russie-Afrika na Sochi, 23 octobre 2019. Mikhail Metzel / SPUTNIK / AFP
Président ya Russie Vladimir Putin ayambi président ya RDC (Ekolo Congo démocratique) Félix Antoine Tshilombo Tshisekedi, na bokutani ya Russie-Afrika na Sochi, 23 octobre 2019. Mikhail Metzel / SPUTNIK / AFP

Mbulamatari ya Russie endimi mabongisi ma boyokani na maye matali mampinga na Ekolo Congo démocratique, kolanda nsango epesami na Agence ya nsango ya Russie Tass.

Mokano mwa mbulamatari ya Russie mosakolamaki o’mokolo mwa mosala mibale moleki na portail ya nsango etali mambi masembo ya Moscou.

"Kolanda article 11 ya mobeko ya ekolo Russie na maye matali boyokani na bikolo mya bapaya, (mbulamatari) endimi mabongisi ma boyokani ya mampinga na Ekolo Congo democratique, maye malakisamaki na ministère russe ya Bobateli ekolo na boyokani na ministère russe ya mambi ma Bapaya elongo na misala misusu mya ekolo miye mizali na likambo lyango," elakisi mokanda moye Tass, Agence ya nsango ya Russie ebimisi.

Kolanda boyokani bwango, ngalasisi ya ndenge na ndenge mpe elongo ekosalama kati na mampinga ma Russie na ya RDC.

Misala to ba agences eye esalaka misala myango mikozala, lokola mpe mibembo mya masuwa ya bitumba mpe ya mepo ya bitumba mikosalama mpe kolanda bosenga ya bakonzi.

Mateya ma basoda mpe makambo masusu mpe makosalama, kolanda Tass.

La Libre Belgique mpe ebimisi nsango yango.

Forum

XS
SM
MD
LG