Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokambi ya ba Wagner Prigozhin atangami kati na bato zomi bakufi na likama lya mpepo na Russie


Elili ezwami na bililingi na compte Telegram azgruzka_vagnera o'mokolo mwa 22 ya sanza ya mwambe 2023, elakisi mokambi ya ba mercernaires ya Russie Wagner, Yevgeny Prigozhin kolobaka na camera wuta bisika biyebani te.
Elili ezwami na bililingi na compte Telegram azgruzka_vagnera o'mokolo mwa 22 ya sanza ya mwambe 2023, elakisi mokambi ya ba mercernaires ya Russie Wagner, Yevgeny Prigozhin kolobaka na camera wuta bisika biyebani te.

Ba Agences ya sango ya Ekolo Russie basakoli ete Eguéni Prigojine mokambi ya Wagne, ba mercénaires to babundi ba Russie, atakangami kati na bato zomi baye bakufi na likama lya mpepo o’mokolo mwa misato (23 sanza ya mwambe 2023).

“Bato zomi bazalaki kati na mpepo, kati na bango basali bam pepo. Na nsango tozwi, bato banso bakfui,” esakaloki yambo na yango ministère ya Mambi nkwokoso mpe lisungi, na nzela Télégram.

Bililingi bya bokweyi bwa mpepo moko etamboli na ba réseaux sociaux kasi endimami nanu polele te soki ezali yam pepo ememaki M. Prigozhin.

Mikolo misato mileki, bililingi bisusu bilakisi M. Prigozhin koloba ete azali na Afrika mpo na lokumu ya Russie.

Na sanza ya motoba eleki, babundi ba Wagner batombokaki mpe bakotaki ata na Moscou kasi babotolaki bokonzi te nsima na bitumba na basoda ba Russie.

Boyokani bosalamaki kati M. Prigozhin na mokonzi ya Russie Vladimir Putin.

M. Prigozhin awanganaki koluka kobotola bokonzi kasi kasi alaki nde kokoba kobunda na Arika.

Ba Wagner bazali na bikolo mingi na mokili, mingi mingi bya Afrika lokola Mali, Centrafrique na misusu.

Forum

XS
SM
MD
LG