Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gén. ya Brig. Eddy Kapend avandisami na ebonga ya kokamba 22e région militaire


Général de Brigade Eddy Kapend nsima na kobimisa na boloko bwa CPRK/Makala mpo na bobomi bwa Laurent-Désiré mokonzi ya kala ya RDC, Kinshasa, 8 sanza ya yambo 2021.
Général de Brigade Eddy Kapend nsima na kobimisa na boloko bwa CPRK/Makala mpo na bobomi bwa Laurent-Désiré mokonzi ya kala ya RDC, Kinshasa, 8 sanza ya yambo 2021.

Général ya Brigade Eddy Kapend Irung oyo apesamaki mpete eye mposo mibale mileki mpe atiami bo’ mokambi ya etuka ya ntuku mibale na mibale ya mampinga ma Ekolo Cogno democratique FARDC eye ezali na etuka ya Haut-Katanga, azwi lelo ebonga na ye na milulu misalaki na camp Vangu, na Lubumbashi.

Milulu myango mikambamaki na Lieutenant-general Sikabwe Asinda Fall Chef d’Etat-major ya mampinga ma mabele.

Eddy Kabend azalaki yambo colonel kasi apesamaki mpete ya general ya brigade mpe mokonzi ya 22e region militaire ya FARDC na mokano mwa bokeseni ya mokonzi ya EKolo Congo democratique Felix Tshisekedi.

Abimisamaki na boloko na sanza ya zomi na moko ya mobu 2021 nsima na kolekisa pene na mibu ntuku mibale na bokangami mpo na bobomi bwa mokonzi ya kala ya RDC nkondo Laurent-Desire Kabila.

Azalaka Aide de camp to mosungi ya pembeni mpenza ya Laurent-Desire Kabila mpe akatelamaki etumbu ya liwa mpo abomaki na masasi soda mobateli ya Laurent-Desire Kabila oyo afundamaki koboma mokonzi oyo ya kala na kiti na ye ya bokonzi mokolo mwa zomi na motoba ya sanza ya yambo ya 2001.

Eddy Kapend awanganaka koboma Laurent-Desire Kabila mpe alakaki kotikala sembo na Felix Tshsiekedi mpo abimisaki ye na boloko.

Na bokomi bwa ye na Lubumbashi mikolo misato mileki, General ya Brigbade Eddy Kapend alakaki kobatela ekolo mpe akebisaki baye banso bakomeka kobebisa bokengi ya mboka na eleko eye ya maponami.

Akundoli na bayi politiki ete politiki ekeseni na bokengi.

Forum

XS
SM
MD
LG