Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Baye bazwaka etumbu ya mibu 20 mpo na liwa ya LD Kabila babimi boloko


Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.
Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.

Baye bazwaki etumbu ya mibu 20 mya boloko to misala makasi mpo na liwa lya nkondo président Laurent-Désiré Kabila babimisami jeudi na boloko ya Makala CPRK.

Etumbu na bango ekitisamaki na mikano mya ngolu président Tshisekedi azwaki o’mokolo mwa lipanda.

Basusu lokola Eddy Kapend, Nono Lutula mpe Leta Mangasa etumbu na bango ya liwa ebongolamaki na boloko Ya libela.

Boloko ya libela ya bayi mapinga babomaki ba Libanais na Kibomango, bobongolami na mibu tuku mibale mya boloko.

XS
SM
MD
LG