Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi abimisi Eddy Kapend na baye bakangama na liwa lya LD Kabila


Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.
Eddy Kapend moko na baye baketelamaki etumbu ya liwa mpo kufa ya mokonzi ya kala Laurent-Désiré Kabila, tata na président ya kala Joseph Kabil, na Kinshasa, 16 janvier 2001.

Président Tshisekedi asakoli botikami bwa colonel Eddy Kapend mpe bato basusu bakangama wuto pene na mibu tuku mibale mpo na liwa lya Laurent-Désiré Kabila, mokonzi ya kala ya RDC mpe tata Joseph Kabila oyo akitanaki na ye.

Mikano mya botikami bwa Colonel Kapend na basusu mitangamaki butu boleki na télévision nationale.

Liyebisi lyango lilobi ete mokonzi ya mboka alingi "alakisa bomoto, bolimbisi, bosembo mpe boyokani na ntina ya kosangisa bana mboka na mbongwana ezali kosala".

Mikano myango mikitisi mpe etumbu ya bakangami baike.

Baye bafundama na makambo lokola moyibi ya misolo mya l’Etat, kanyaka, kozwa basi to bato ba makasi, mbeba ya kobebisa kimya, mbeba ya bomoto, kozwama na minduki mpe makambo masausu ma lolenge wana bazwi ngolu ya mokonzi ya mboka te.

Colonel Kapend, gendarme katangais ya kala oyo awumelaki na Angola, azalaki Aide de camp ya nkondo président LD Kabila.

Na bosambisami bwa ye, colonel Kapend andimaki ete abomaki na nkanda mokengeli ya LD Kabila oyo awutaki kobeta masasi na mokonzi ya mboka (LD Kabila).

Colonel Kaoend na bato basusu bawangana ete babomaki LD Kabila mpe basengaka bobandelami bwa bosambisami na bango.

XS
SM
MD
LG