Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asengi na bayi mampinga kozala nsima na ye mpo na kolonga baye balingi kokabola ekolo


Ba officiers baike ba mampinga ma RDC bapesi losako na limpati bazalaki na yango makonzi ya ekolo Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 18 sanza ya zomi 2023. (Présidece RDC)
Ba officiers baike ba mampinga ma RDC bapesi losako na limpati bazalaki na yango makonzi ya ekolo Félix Tshisekedi na Cité ya Union africaine, Kinshasa, 18 sanza ya zomi 2023. (Présidece RDC)

Président Felix Tshisekedi abengaki bayi mampinga ma Ekolo Congo democratique na alima mpe bomoko nsima na ye na ntina ya kolonga kwokoso eye bikolo nzinga nzinga bizali kotia na ekolo na mayela makoluka botami mpe bokabwani ya mboka ete.

"Ngai, lokola mokambi ya mampinga, na lobi bakokoka te. Yango wana nazali na mposa na bino, na bomoko, na bosangani, na bokasi, nsima na ngai, mpe tokolonga bitumba biye. Tokolonga mondenge moye," elobaki mokonzi ya Ekolo Congo democratique na ba officiers na limpati akobolaki na baike na bakambi ba mampinga na Cité ya Union africaine na Kinshasa o’mokolo mwa mosala misato, 18 ya sanza ya zomi 2023.

Nzonkande, kalaka mokonzi ya ONU akebisi mikolo mibale mileki ete bitumba bikoko kobima lisusu kati na Rwanda na RDC mpo bikolo mibale bizali kolengele mampinga ma yango mpe bizali kosolola te. Ezali na rapport moko etangamaki na Conseil ya sécurité ya ONU.

Na Maloba ma ye, M. Tshisekedi akundoli ete mpasi RDC ezali na yango sika etalisi makanisi ma bikolo nzinga nzinga biye bilingi ete ekolo ekbwana.

"Tozali na eleko moko ya matata mpe mpasi. Tozali na kati kati ya bokutani na ba nzela : ezali ete tolonga nkwkoso eye etelemeli biso to tokweya mpe totikala na nse ya mpasi mpo na ntango molayi," ebakisi M. Tshisekedi.

Mokonzi ya RDC akebisi bayi mampinga mpamba te bana mboka mingi ba ekolo bazali kokuafa mpo bikela biye baya bapaya kasi mpe mpo na mbeba mpe mabunga ma bayi FARDC bango moko.

Forum

XS
SM
MD
LG