Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Jakaya Kikwete alobi ayaki na RDC mpo na masolo matali maponami mpe bokengi


Mokonzi ya kala ya Tanzanie Jakaya Kikwete (G) apesani mbote na président Félix Tshisekedi ya RDC na Lubumbashi, RDC, 4 sanza ya zomi 2023. (X/Présidence RDC)
Mokonzi ya kala ya Tanzanie Jakaya Kikwete (G) apesani mbote na président Félix Tshisekedi ya RDC na Lubumbashi, RDC, 4 sanza ya zomi 2023. (X/Présidence RDC)

Mokonzi ya kala ya Tanzanie, Jakaya Kikwete oyo azali kokamba lingomba lya bampka ba bwanya ya SADC (Likita lya ntombwa lya bikolo bya Afrika ya nse) asololaki na president Félix Tshisekedi ya RDC mokolo mwa misato (mokolo mwa minei ya sanza ya zomi ya 2023) mpo etali maponami mazali koya mpe bokengi na ekolo eye.

Molobeli ya mbulamatari ya RDC Patrick Muyaya awangani ete M. Kikwete asalaki mobembo mwa ye na RDC mpo na masolo baike ya bayi politiki bazali kozela na ngambo ya mbulamatari.

"Nayaki na bobengisami ya président Tshisekedi bo' mokambi ya bampaka ba bwanya. Nayaki awa koyoka, kosolola na president mpe koyoka ye," esakalaki M. Kikwete liboso lya bapanzi nsango na Lubumbashi nsima na kokutana na M. Tshisekedi.

“Totombeli bana ba RDC bolamu mingi na misala mya maponami maye,” elobi M. Kikwete.

Alaki ete SADC ekotinda misala mya kotala maponami na RDC.

Mokonzi ya kala ya Tanzanie alobi ete president Tshisekedi akitisi motema mwa ye mpo etali maponami.

Mpo etali bokengi, M. Kikwete alobi ete M. Tshisekedi asepeli na mokano mwa SADC ya kotinda mampinga ma etuka na RDC.

Forum

XS
SM
MD
LG