Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kigali ewangani ete ebomaka mpe ememaka na makasi ba opposants wuta libanda lokola HWR epameli yango


Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame ana milulu mya bokanisi génocide na Rwanda, na Kigali, 7 sanza ya minei 2023.
Mokonzi ya Rwanda Paul Kagame ana milulu mya bokanisi génocide na Rwanda, na Kigali, 7 sanza ya minei 2023.

Mbulamatari ya Rwanda ewangani ete ebomaka, ebetaka, ekangaka mpe ememaka na makasi baye batelemeka bokonzi ya president Paul Kagame wuta libanda lya mboka lokola Human Rights Watch (HRW) efundi yango.

Na mokanda ebimisi, HRW esengi na bayi molongo kobundisa “monyokoli moye mosalamaka na libanda” na mabele ma Rwanda.

HRW “ezali kokoba kolakisa elongi ya Rwanda eye ebongoli na kobebisa yango, elongi eye ezali kaka na makanisi na bayi HRW,” eyanoli na AFP molobeli ya mbulamatari ya Rwanda, Yolande Makolo.

Mpo na ye, elongi ya Rwanda eye HRW elakisi ezali na bokeseni na botomboli makoki ma bolamu bwa bana Rwanda na lokumu na ba bango Kigali ezali kosala wuta mibu ntuku mibale na libwa mileki,” bekisi Mme Makolo.

FPR (Front patriotique ya Rwanda) lingomba lya mokonzi ya Rwanda Paul Kagame, “eyanolaki mbala mingi mpe na makasi na bopameli bato basalelaka yango, na kotiaka mikano mingi na ntina ya kobundisa baye batelemelaka yango to baye bakanisami ete batelemelaka yango,” ekomi HWR, na ngambo na yango.

HRW etangi bobomami bwa opposants ba Rwanda koleka zomi na libanda mboka, bozwami mpe bomemami bwa bango na makasi wuta libanda, bolimwisi bwa bango na makasi, monyokoli mwa bango.

HWR ezali kolandela mbeba eye esalama wuta 2017, esololaki na koleka bato 150 na France, Afrika ya ngele mpe Etatas-Unis.

Wuta 2021, elobi HRW, “koleka bana ba Rwanda koleka basatu babomamaki to balimwaki na ndenge ya molili, nzonkande bato babale babikaki nsima na bato baike bamekaki kokanga mpe kobemama bango na makasi” na Mozambique; kati na bango Saleman Masiya, oyo moninga wa ye alobi azalaki na maloba makasi ya kososola mbulamatari ya Rwanda.

Saleman Masiya, mobeti ndembo ya kala, oyo azalaki kosenga bovandi na Mozambique, abomamaki na kotiyama mbeli mbala mingi na ndako na ye, na elongi mpe na nkingo, na sanza ya sambo ya 2022.

Saleman Masiya azalaki nan se ya mitungisi mbala mingi mpo ete abanda kosala mpo na mbulamatari ya Rwanda.

Forum

XS
SM
MD
LG