Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nangaa abeti sete ete boyokani bosalamaki yambo na bosakolami bwa bilembo bwa maponami ma 2018


Corneille Nangaa Yobeluo
Corneille Nangaa Yobeluo

Corneille Nangaa, Mokambi ya kala ya CENI, Misala mya kolengela maponami na Ekolo Congo democratique, alobi na mokanda abimisaki mokolo mwa mposo moleki ete Boyokani moko bwa politiki bozali kati na mokonzi ya mboka ya kala Joseph Kabila mpe mokonzi oyo abimaki na abimaki na maponami na 2018 Félix Tshisekedi.

Mokambi ya kala ya CENI na RDC akomi na mokanda abimisaki mokolo mwa mposo été boyokani bwango bosalamaki yambo na bosakolami ya bilembo bya maponami ma 2018.

M. Nangaa alobi azalaki moko na bakomi ba boyokani bona.

Abakisi ete Boyokani bwango bobengamaki Boyokani mpo na kimya na Ekolo Congo democratique, bondimami na bakonzi basato ba bikolo bisusu ba Afrika mpe bopesaki nzela na bopesani bwa bokonzi kati na mokonzi ya kala na ya sika na bozangi botangisi makila.

Mokonzi ya kala ya kala ya CENI ayonali bongo na moonzi ya mboka Felix Tshisekedi oyo alimbolaki liboso lya bapanzi nsango mposo moleki na New York, awa na Etats-Unis ete boyokani moko te ya mayuya botikali kozala nsima na maponami kati na ye na Joseph Kabila.

M. Nangaa akimaki mboka wuta sika pene na sanza moko na koloba ete bokengi bwa ye bozali na likama mpe misala mya sembo mpe mya bokengi mizali kotindama na bayi politiki mpo kopekisa bayi kowelela ebonga ya mokonzi ya mboka na maponami ma koya.

Moyangeli ya kala ya CENI asakolaki mokolo mileki ete akopesa nkombo mpo na kowelela eponga ya mokonzi ya mboka. Akelaki lingomba lya politiki lya ye mikolo mileki.

Forum

XS
SM
MD
LG