Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Corneille Nangaa alobi akimi mboka mpo na bokengi bwa ye botiami na likama


Corneille Nangaa Yobeluo mokambi ya kala CENI Misala mya maponami na Ekolo Congo démocratique, Kinshasa, 20 sanza ya zomi na mibale 2018.
Corneille Nangaa Yobeluo mokambi ya kala CENI Misala mya maponami na Ekolo Congo démocratique, Kinshasa, 20 sanza ya zomi na mibale 2018.

Corneille Nangaa, moyangeli ya kala ya misala mya maponami na Ekolo Congo democratique, CENI, asakoli ete akimi mboka mpo amoni ete bokengi bwa ye bokomi na likama.

M. Nangaa akelaki mikolo mileki lingomba lya politiki ADCP Action pour la dignité du Congo et de son peuple mpe asakolaki kowelela ebonga ya mokonzi ya mboka na maponami masengeli kosalama na sanza ya zomi na mibale ya mobu moye.

Alobi azali kozwaka maloba ma baye bazali kokana kosala ye mabe mpe mbulamatari ebotola ye bato bazali kokengele ye.

Mokonzi ya kala ya CENI apameli bozangi botosi bwa mibeko na mboka mpe mbeba mpe mobulu ya l’Etat eye emonisami na ndenge misala mya bokengi mizali kokotelaka bato na ndako mpo na koluka luka, kokangaka bato mpamba mpaba, apameli mpe bobtoli bato biloko mpe makambo masusu.

Forum

XS
SM
MD
LG