Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba Léopards baleki na phase finale ya CAN 2023 na kobeta 2-0 Mauritanie


Capitaine ya ba Léopards ya RDC Chancel Mbemba (G2), oyo ya Mauritanie (D2) na arbitres, na match ya CAN 2023, stade des martyrs, Kinshasa, 9 septembre 2023. (ACP)
Capitaine ya ba Léopards ya RDC Chancel Mbemba (G2), oyo ya Mauritanie (D2) na arbitres, na match ya CAN 2023, stade des martyrs, Kinshasa, 9 septembre 2023. (ACP)

Na Léopards ya RDC baleki na phase finale ya CAN 2023/2024 Côte d'Ivoire na sanza ya yambo ya 2024 nsima na kolonga o'mokolo mwa mposo Sudan 2-0 na stade des Martys ya Kinshasa.

Babimi na molongo ya yambo ya groupe I na bilembo 12 liboso lya Mauritanie eye elongaki na ngambo na yango Gabon 2-1 mpe ezali na bilembo 10. gabon 7 pts mpe Sudan na 6 pts.

Basani ba Léopards basali bikamwa mpo bawutani na suka ya molongo na groupe eye, nsima na kozwa Sébastine de Sabre, moyi ekolo France, France bo' mokambi to coach na bango.

Ba Léopards balongaki Mauritanie na match na mokanda, na mokano ya CAF nsima kotala bosenga ya RDC mpe kopesa etumbu na Mauritanie mpo ebetisaki mosani moko asengelaki te.

Forum

XS
SM
MD
LG