Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hector Cuper alongolami bo’ entraineur ya ba Léopards


Moyi Argentine Hector Cuper, entraineur ya ba Léopards ya RDC, awa azalaki kokamba Uruguay na match na Uzbekistan na Coupe du monde na Guancxi, Chine, 22 mars 2019.
Moyi Argentine Hector Cuper, entraineur ya ba Léopards ya RDC, awa azalaki kokamba Uruguay na match na Uzbekistan na Coupe du monde na Guancxi, Chine, 22 mars 2019.

Hector Cuper alongolami bo’ entraineur ya ba Léopards ya Ekolo Congo démocratique nsima bokweyisami ya mibale ya Léopards lobi monete moko na mibale liboso lya Soudan na ba élimintaoires ya CAN 2023.

Na mokanda akomeli coach ya ba Léopards, ministre ya Masano Serge Chekombe Nkonde apameli ye kozanga kopesa basani mayele mpe makasi makolonga.

Mokano mwango mokweyi nsima na Léopards kopola match mibale ya yambo ya ba éliminatoires ya CAN Côte d’Ivoire 2023, ya yambo ezalaki mokolo mwa eyenga mongete moko na libungu tulu na Stade des martyrs na Kinshasa ntango Gabon ekaki na etando ya masano kaka ngonga moko yambo na kobeta.

Hector Cuper akokaki mpe te kolekisa ba Leopards na Mondial ata bakomaki kino barrages eye bapobalaki na Maroc.

XS
SM
MD
LG