Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sanza misato ebakisami na etinda ya mampinga ma EAC na RDC


President William Ruto (G) ya Kenya akutani na mbote na President ya RDC Felix Tshisekedi (D) na Kinshasa, 21 sanza ya zomi na moko 2022. -
President William Ruto (G) ya Kenya akutani na mbote na President ya RDC Felix Tshisekedi (D) na Kinshasa, 21 sanza ya zomi na moko 2022. -

Etinda ya mampinga ma EAC, bikolo bya Afrika ya Est, ebakisami sanza misato na Ekolo Congo democratique, kolanda bokutani bwa bakonzi ba bikolo bya etuka eye ya Afrika lobi loleki na Nairobi na Kenya.

Bakonzi ba bikolo bya EAC bakutanaki mpo na yango na Nairobi.

Ministre wa yambo ya Ekolo Congo démocratique (RDC) Jean-Michel Sama Lukonde nde alakisaki elongi ya mboka na ye na bokutani bwango.

Etinda yango ekokende sika kino mokolo mwa mwambe ya sanza ya zomi na mibale ya mobu moye, elobi liyebisi lya likita liye.

Kenya, Burundi, Uganda mpe Sudan ya Sud batinda basoda ba bango na monyele ya Ekolo Congo democratique wuta sanza ya zomi na moko ya mobu 2022 mpo na kotiya kimya na bitumba bya M23 baye Kinshasa efundaka Rwanda kopesama maboko.

Forum

XS
SM
MD
LG