Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Museveni asengi masolo kati na RDC na M23

Mokonzi Uganda Yoweri Museveni akutani na mobondisi EAC (Likita lya bikolo bya Afrika ya est) mpo na kimya na RDC, Uhuru Kenyatta na Entebe, Uganda, 7 sanza ya mwambe 2023. (X/Office of the 4th President of Kenya)

Mokonzi ya Uganda Yoweri Museveni asengi ete mbulamatari ya Ekolo Congo democratique na M23 basola mpo likambo lya batomboki baye lizali nde lya politiki.

Yoweri Museveni akutanaki mokolo mwa yambo ya mposo (7 sanza ya mwambe 2023) na Entebe, na Uganda, na Mobondisi ya EAC, Likita lya bikolo bya Afrika ya Est, mpo na kimya na RDC, mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta na misala mya bokambi elongo comite technique mpo na monyele ya RDC.

Yoweri Museveni alimboli na bapanzi nsango ete bayi M23 bayebisi ete bazali kosenga te kokabola bokonzi kasi kozonga na bisika bya bango bavandaka epayi bakimaki, bazali mpe kosenga kokokitisama na mampinga.

Forum

XS
SM
MD
LG