Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabund abimi boloko te, elobi CNDH

Jean-Marc Kabund (C), kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi pene na molandi wa ye Augustin Kabuya (1er G) na Dr Eteni Longondo ya lingomba liye na Limete, Kinshasa, 8 janvier 2019.

Jean Marc Kabund mokambi ya kala ya UDPS, lignomba lya mokonzi ya RDC, abimi te boloko lokola boko na bayi Lingomba na ye ACH basakolaki lobi loleke. Mabongisi ma makoki ma bomoto CNDH malobi ete M. Kabund asengaki ata kutu te kobima.
Nsango eye ya siki siki,, epesami na mokambi ya CNDH na kosalaka ete M. Kabund atikali na boloko bonene ya Makala/CPRK

Lobi loleki baike kait na bayi nzinga nzinga Jean Marc Kabund balobaki ete atikami mpo na mwa natngo kasi azali kozela bobisami bwa ye na Bokolo bonene ya Makala CPRK epayi atiamaki na bokangami.

Balandi baye baike batondisamaki na balabala kozela ye.

Jean-Marc Kabund akangamaka mobu moleki na kofundama kofinga mokonzi ya mboka, kokosela ye makambo mpe kotinda bana mboka na botondoki.

Forum

XS
SM
MD
LG