Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabuya SG ya UDPS alobi Kabund akosa, ayiba mpe abotolaki carré minier ya bato


À gauche, Felix Tshisekedi, et au centre Jean-Marc Kabund, lors d'une conférence de presse au siege de l'UDPS, Limete, Kinshasa, en RDC le 28 octobre 2016. (VOA/Top Congo)
À gauche, Felix Tshisekedi, et au centre Jean-Marc Kabund, lors d'une conférence de presse au siege de l'UDPS, Limete, Kinshasa, en RDC le 28 octobre 2016. (VOA/Top Congo)

Kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya president Félix Tshisekedi, Augustin Kabuya, ayanoli na Jean-Marc Kabund, mokambi ya kala ya lingomba liye, na kopamela lokuta, moyibi mpe ezalaleli na ye ya mabe. Ezali mikolo mibale nsima Jean-Marc Kabund kosakola bokelami bwa lingomba na ye, AC (Alliance pour le changement) mpe kosenga bana mboka kobengana mokonzi ya mboka mpo akoki te, elongo na UDPS, kotombola ekolo.

"Ezaleli ya M. Kabund elakisi ete atikala kolanda te nkondo Etienne Tshisekedi oyo atikela biso lingomba UDPS… Na novembre 2021, Jean-Marc Kabund abotolaki carré minier ya moto moko kaka mpamba. Azongisaki yango kaka mpo na mbamba UDPS eye etelemaki ye," elobi M. Kabuya.

Mikolo mibale mileki, M. Kabund bokonzi ya UDPS lokola ya bato balinga ba feti na bisengo.

Kalaka mokonzi ya UDPS, M. Kabuya akundoli lingomba liye (DUSP) libenganaki M. Kabund mpo na lokuta, moyibi ya ba misolo millions ya ba cartes mpe misusu, kobeta bato mpe ezaleli esusu ya mabe.

M. Kabuya alobi M. Kabund nde moto ya bafeti mpo na mibu mibale atonga biloko lokola bityelo ya misolo mingi na biloko misusu.

XS
SM
MD
LG