Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kabund akozonga lisusu na Parquet mardi


Jean-Marc Kabund (C), kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi pene na molandi wa ye Augustin Kabuya (1er G) na Dr Eteni Longondo ya lingomba liye na Limete, Kinshasa, 8 janvier 2019.
Jean-Marc Kabund (C), kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi pene na molandi wa ye Augustin Kabuya (1er G) na Dr Eteni Longondo ya lingomba liye na Limete, Kinshasa, 8 janvier 2019.

Jean-Marc Kabund mokambi ya kala ya UDPS, mpe mokambi molandi ya yambo ya kala ya Assemblée nationale ayanolaki lelo mokolo mwa minei 28 juillet 2022 na bobengisami ya Parquet ya Cour ya cassation ya Kinshasa/Gombe nsima kosenga bana ba Ekolo Congo démocratique kobengana mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Procureur ya Cour ya cassation asengaki mpe apesamaki na bureau ya Assemblée nationale ndingisa ya kolanda M. Kabund nsima na lisikulu ya bosakoli bokelami ya lingomba lya ye Allinace pour le Changement mokonzi ya kala ya UDPS asalaki mposo moleki.

Mwana mboka Kabund afundami mpo na maloba malokuta, bokoseli makambo, mafinga na mokonzi ya moboka mpe na miso ya bato na lisusu lina.

M. Kabunda azaongaki ndako na ye na bonsomi bonso nsima na koyanola ngonga mingi na bazuzi mpe asengami kozonga na parquet o;mokolo mwa misato mokoya.

Mwa nkwokoso esalamaki na nzela na ye na kokende na parquet mpo police ekangaki baike bazalaki kotambola na molongo ya mituka mpe tukutuku na ye mpo na kokoma na parquet.

M. Kabund alobaki na lisikulu lyango ete mokonzi ya mboka azali likama mpo na ekolo.

XS
SM
MD
LG