Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nicolas Sarkozi alingi azongisa boyokani kati na Rwanda na Kinshasa


Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy na milulu mya ya bakanisi bao bazwaki mpasi ya badongolomeso na Hôtel ya ba invalides, na Paris, 11 mars 2023.
Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy na milulu mya ya bakanisi bao bazwaki mpasi ya badongolomeso na Hôtel ya ba invalides, na Paris, 11 mars 2023.

Nicolas Sarkozy, mokonzi ya kala ya ekolo France azali na Kinshasa epayi akomi mpo na kozongisa masolo kati na bakonzi ba Ekolo Congo démocratique na baye ba Rwanda.

Akomaki na engumba mokonzi ya RDC o’mokolo mwa misato na mpokwa, etatoli basali ba libanda lya mpepo y aya N’Djili na Kisnhasa.

Nicolas Sarkozy alingi azongisa boyokani kati na Rwanda na Kinshasa, kolanda Arica intelligent, media eye epesaki sango ya mobembo moye yambo.

Bokomi bwa Sarkozy bosalami ntango mabongisi mingi mpe bato mingi lokola mokonzi ya France Emmanuel Macron bamekaki kozongisa boyokani malamu kati na ngambo mibale.

Félix Tshisekedi mokonzi ya RDC na Paul Kagame ya Rwanda bakutanaki na masolo na sanza ya libwa eleki na New York, na lisungi lya Emmanuel Macron.

Molobeli ya president Tshisekedi Tina Salama akomi na Twitter été mokonzi ya RDC asengi te na mokonzi ya France te kosala mosala ya koyokanisa ngambo mibale mpe mabongisi ma lolenge longa mazali te.

Kinshasa efundaka Kigali kopesa maboko na batomboki ba M23 mpe Rwanda na ngambo na yango ewangaka mpe epamelaka RDC na monyokoli ya baye balobaka Kinyarwanda baye M23 elobaka ebundelaka.

XS
SM
MD
LG