Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nicolas Sarkozy akatelami mobu moko ya boloko


Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy akomi na tribunal na bosambisami bwa ye, Paris, France, 1er mars 2021.
Mokonzi ya kala ya France Nicolas Sarkozy akomi na tribunal na bosambisami bwa ye, Paris, France, 1er mars 2021.

Nicolas Sarkozy, mokonzi ya kala ya France akatelami mobu moko ya boloko na likambo lya Bygmalion mpo ba misolo mipesamaki na bobuki mibeko na campagne présidentielle ya 2012.

Tribunal elobi ete M. Sarkozy akosala boloko te kasi akokangama na bobatelami na ndako.

M. Sarkozy azalaki te na ekateli ya bazuzi kasi na juin alobaki ete ayebaki te ete ba factures ya lokuta esalamaki mpo azwa 42,8 millions $, lokola afundami na yango.

Mokonzi ya kala ya France awanganaki ete azalaki na makasi ya kosala mbeba.

Nzolande, zuzi mokonzi ya tribunal Caroline Viguier akundoli ete ezalaki te campagne ya yambo mpo M. Sarkozy.

Mme Viguier abakisaki kutu ete M. Sarkozy akebisamaki ete misolo azalaki kozwa milekaki miye mobeko mopesi ndingisa.

Sanza sambo eleki, Nicolas Sarkozy azwaki mpe etumbu mosusu ya mobu moko ya boloko.

Avocat ya Sarkozy alaki kosenga bobandeli ya kosambisama.

XS
SM
MD
LG