Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CENI ebakisi mikolo 15 na etando ya maponami ya misato na RDC


Basali ba CENI, misala mya maponami, bazali komema sanduku ya machine ya kopona, Kinshasa, RDC, 28 décembre 2018.
Basali ba CENI, misala mya maponami, bazali komema sanduku ya machine ya kopona, Kinshasa, RDC, 28 décembre 2018.

CENI, misala mya maponami na Ekolo Congo démocratique, ebakisi mikolo zomi na mitano na bokomisi nkombo ya baponi na etando ya misato ya maponami na ngambo ya monyele ya ekolo.

Bokomisi nkombo ya baponi bokende bongo kino mokolo mwa yambo ya sanza ya minei ya 2023 na ntina ya kopesa nzela na bana mingi ya mboka na etando eye kozala na maponami masengeli kosalama na sanza ya zomi na mibale mobu moye, elobi CENI na liyebisi.

Lobi loleki misala mya CENCO mpe ECC miye milandelaka maponami misakolaki ete esengeli na bazuzi kolandela bomonani ya bisaleli bya maponami na maboko ma baye basengeli kozala na yango te.

CENI, na ngambo na yango, elobi été baponi na motango ya ntuku sambo likolo na nkama 70% to koleka million ntuku minei na libwa basi bakomisi nkombo na bango wuta misala miye mibandaki na bitando binso bya ekolo.

XS
SM
MD
LG