Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Maponami ma mokonzi ya mboka mpe bakeli mibeko, le 20 décembre 2023, elobi Kadima


Denis Kadima mokambi ya CENI, misala mya mponami ma RDC, ntango azalaki mokambi ya Unired (Division de référendum intégré de Nations unies) na Khartoum, Sudan, 1er novembre 2010. AFP PHOTO/ASHRAF SHAZLY
ASHRAF SHAZLY / AFP
Denis Kadima mokambi ya CENI, misala mya mponami ma RDC, ntango azalaki mokambi ya Unired (Division de référendum intégré de Nations unies) na Khartoum, Sudan, 1er novembre 2010. AFP PHOTO/ASHRAF SHAZLY ASHRAF SHAZLY / AFP

Le 20 décembre 2023 nde maponami ma mokonzi ya mboka, ya bakeli mibeko ba ekolo mpe ya bituka nde makosalema, esakoli mokambi ya CENI, misala mya bosalisi maponami na RDC, Denis Kadima na Kinshasa.

Mokambi ya CENI asakoli linaka lya bosalisi maponami manso na milulu liboso lya bayi politiki mpe bapanzi sango.

"Bozangi bokengi na bisika biike ya ekolo, bozali moko na kwokoso ya kosalisa maponami maye," endimi M. Kadima.

M. Kadima alimboli ete maponami ma mokonzi ya ekolo makosalama kaka na ngala moko.

Mokambi ya CENI alobi bopusi nsima ya maponami bozali te na makanisi ma baye bazali kobongisa misala miye.

Kasi akebisi ete soki kwokoso inso eye alobelaka wuto kala epesameli eyano te ekoki komema mbano na misala mya maponami.

Bobengisami ya maponami bokosalama le 23 juin 2023.

Nsima na maponami, bolapi ndayi ya mokonzi akoponama bokozala le 20 janvier 2024.

XS
SM
MD
LG