Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

CENI epusi maponami ma bakambi ya bituka zomi na minei le 6 mai


Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.
Ndako ya mosola ya Commission électorale nationale indépendante (CENI) na Kinshasa, RDC, 5 novembre 2017.

CENI, misala ma maponami na RDC epusi maponami ma bakambi bituka zomi na minei na balandi ba bango o’mokolo mwa le 6 mai.

Ebimisi linaka lya sika le 23 février 2022.

CENI alobi elandi ndingisa ya kozwa misolo ya mokano 15 bis ya Banque Centrale ya Congo epesami mpe kolanda ntina ya bokoti ya banso.

"CENI ezwi mokano ya kozongisa nsima maponami ya bakambi bituka zomi na misato mpe balandi ba bango lokola mpe ya etuka ya Sankuru," elimboli liyebisi lya CENI.

Maponami mango matindikami le 6 mai, elakisi linaka CENI ebimisi.

Ezali mpo na bituka biye bakambi mpe bakambi balandi bakweyisamaki na na bakeli mibeko : Bas-Uele, Haut-Lomami, Kasaï oriental, Kongo central, Lomami, Maï-Ndombe, Tanganyika, Maniema, Mongala,Tshopo, Kasaï central, Ituri eye ezali na état siège.

Na Kinshasa na mpe na Kwango ekozala nde kaka mpo na bakambi balandi.

Ba dossiers 67 ezwami na le 22 février eye ezalaki yambo mokolo bokomisi nkombo bosengalaki kosalama. Kino Sika nkombo ya basi 11 epesami mpe ya babali 56.

Nkombo moko te epesami mpo na Lomami kasi linaka lya sika lipusi mikolo mpo na bokomisi ba nkombo.

XS
SM
MD
LG