Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

G20/Bali: Blinken ayebisi Biruta ete Rwanda ezwa mikano ya kosilisa matata na est ya RDC


Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis Antony Blinken (D) na ministre ya Bapaya ya Rwanda Vincent Biruta (G) na bokutani na pabanzi sango na Kigali, 11 août 2022.
Secrétaire d'Etat ya Etats-Unis Antony Blinken (D) na ministre ya Bapaya ya Rwanda Vincent Biruta (G) na bokutani na pabanzi sango na Kigali, 11 août 2022.

Secretaire d’Etat to moyi mbulmatari ya Amerika atali bikolo bya bapaya Antony Blinken asengi Rwanda kozwa mikano makasi na ntina ya kokitisa matata na monyele ya Ekolo Congo démocratique.

Antony Blinken akutanaki o’mokolo mwa mibale 15 novembre 2022 na Bali, na Indonésie na ministre ya mambi ya Bapaya ya Rwanda Vncent Biruta, na masolo ma pembeni na likita lya G20.

“Nazalaki na bokutani ya motuya na ministre ya Bapaya ya Rwanda Vincent Biruta lelo na masolo mapembeni na G20 na Bali. Nabeti sete likolo na mitungisi mya Etats-Unis mpo na bitumba biye bizali kokoba na monyele ya RDC, mpe nasengi Rwanda kozwa mikano mpo kopesa nzela ya kokitisa matata,” ekomi M. Blinken na compte Twitter na ye.

Secrétaire ya Amerika akundoli mpe ete asololaki na mokonzi ya kala ya Kenya Uhuru Kenyatta o'mokolo mwa yambo ya mposo moye mpo etali makasi mazali kosalama mpo na kimya na monyele ya RDC na Ethiopie.

Apesi losako na bokambi bwa Kenya mpo na yango mpe mpo na boluki bokengi na etuka eye.

M. Kenyatta, azali motindami ya EAC, likita lya bikolo bya Afrika ya est mo na matata ma RDC; azali na RDC wuto mokolo mwa yambo ya mposo moye mpo na kobongisa masolo kati na mbulamatari ya RDC na mangomba ma batomboki mpe basimba minguki le 21 novembre 2022 na Nairobi, Kenya.

XS
SM
MD
LG