Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame : “Nakosala manso mpo ete likambo lya ba FDLR lizongela lisusu te na Rwanda”


President Paul Kagame ya Rwanda liboso lya ba ntoma ba bikolo bya pabaya na Kigali, 8 février 2023. (Twitter/Présidence Rwanda)
President Paul Kagame ya Rwanda liboso lya ba ntoma ba bikolo bya pabaya na Kigali, 8 février 2023. (Twitter/Présidence Rwanda)

Paul Kagame alobi na ba ntoma ya bikolo bya bapaya ete akotika soki moke te ete likambo lya ba FDLR mpe génocide lizongela lisusu na Rwanda ata moto nini alingi yango.

“Na makoki manso nazali na yango, nakosala manso masengeli mpo ete likambo liye lya ba FDLR mpe genocide mpe makambo masusu bato basakanaka na yango, lizongela biso lisusu te,” elobi M. Kagame.

Mokonzi ya Rwanda ayambaki na limpati ba ntoma ya bikolo bya bapaya na mpokwa ya o’mokolo mwa misato.

M. Kagame akebisi bayi molongo koluka kokamba Rwanda to Ekolo Congo démocratique.

“Bokoki te kokonza mboka na ngai; bokoki te kokonza Congo, bokoki te kokonza ekolo mosusu na nkombo na yango. Bokoki te kopamela moto mosusu mpo na maye mazali makambo na ngai nasengeli kobongisa, Yango ezali malako maye matambwisaka biso,” elobaki M. Kagame.

Na bokutani bwango, mokonzi ya Rwanda alobi FLDR mpe genocide ekosalamaka lisusu te na mboka na ye.

“Moto nini na mokili akolinga kotika lisolo lya ba FDLR kokoba libele? Ntango mosusu ezali na bato baye balingi kotika yango kokoba libele, ntango mosusu ezali na bato baye elobelaka bango eloko te, ezali makoki ma bango. Na koswana na bango te. Kasi, mwana, ozali kosala maseki soki okanisi ete book kati na biso, bayi Rwanda, baye bayebi lisolo na bango, bakotikala kondima yo. Moto nyonso oyo azali kokanisa lolenge lona azali kosala libunga mpenza,” elobi M. Kagame.

“Ezali likambo lya biso, ezali likambo lya bomoi bwa biso, ezali likambo lya lisoso na biso, ezali likambo lya lisitwale na biso, ezali likambo lya bomoto bwa biso, ezali likambo lya bozali bwa biso mpe moto moko ten a mokili moye azali na mokumba na biso to mokonzi na biso. Te, tozali na mokumba na biso moko. Likambo lya ntembe lizali wana te,” ebakisi M. Kagame na kokundolaka ete asi aloba yango mbala mingi.Ba FDLR bazali batomboki baye bazali mingi nde ba Hutu mpe bakima na Ekolo Congo démocratique. Bafunda na mokumba ya bobomi monene to genocide na Rwanda na 1994. Pasteur Ntoumi na babundi baye babengamaka ba Nija bazalaki koboya elongai ya Dennis Sassou na maponami ma 2016 mpo atikala na bokonzi.

XS
SM
MD
LG