Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

FARDC elobi kolongwa na Kitchanga ezalaki ekela ya mayele


Un homme dans les collines du territoire de Masisi près de Kitchanga dans la province du Nord Kivu, RDC, 16 juillet2012.
Un homme dans les collines du territoire de Masisi près de Kitchanga dans la province du Nord Kivu, RDC, 16 juillet2012.

FARDC, Mampinga ma Ekolo Congo démocratique malobi ete bolongwi na bango na Kitchanga, na Masisi, na Nord-Kivu, bozalaki bolongwi ya mayele ya bitumba mpo na koboya bato mingi bakufa.

Batomboki ba M23 bakotaki na Kithanga lobi nsima na bitumba na FARDC, mampinga ma Ekolo Congo ddémocratique mpe masanga masusu ma basimba manduki.

Molobeli ya mampinga na etuka eye, colonel Njike Kaiko alobi ete mampinga ma Rwanda mazalaki koluka komema bitumba na kati ya cité ya Kitchanga na bibundeli ya makasi.

Nsima na bitumba bizongelaki na ngonga ya 10 na butu bwa lobi, FARDC esimbi kaka kati kati ya Kitchanga.

Bavandi balobi ete lisungi lipesamelaki ba M23 na ngonga ya mibale ya ntongo.

Koleka bacivili nkama minei na ndambo bakimi koluka komibatela na base ya Monsuco na Kitchanga, elobi Molobeli ya Monusco, Kathy Lo.

Sika bavandi ba Mweso na kilometre zomi ya Kitchanga, nde bakomi kokima na kobanga été M23 ekota na mboka na bango.

XS
SM
MD
LG